Koffi Olomide - Coucou Lyrics

Lyrics Coucou - Koffi Olomide



Il y a dans mon cœur un trouble, qui s'appelle l'amour
Mon cœur je le plains, il a prit un train de retard
Dilemme oyo kombo bolingo mama
E komisa ke o zala muana to mobangué
Dilemme oyo kombo bolingo mama
E komisa ke o zala mvuama to malolé
E ko sua ngaï lokola pili-pili
Motéma mo ko bétama
L'hôpital soki é yéba, bo lobéla ngaï
Mama no, no, no, no (x6)
Bitumba é bomaka libala mama
Ko suana é zali pili-pili, mugwa ya libala
Kasi po ninyo
Lélo é koma raison ya ko panza libala ya ngaï na yo
Ba sambisaka, ba yokanaka soki likambo é zali
Coucou o yébi présence na yo é zali thérapeutique mobimba
Linga ngaï wa yo
Yo ozali lisusu ndoyi ya mama
Coucou kanisa lisusu makambo to lobanaki ngaï na yo
Muana to ko bota a zua mobimba na yo
Esanga to ko vivre ézala na ba ndèkés ya bleus
Sango na yoki na kati ya bala bala é buki ngaï mikua
Na tambola ndégué nini na banda na gauche lokolo ya mobali
Na tuni conseil na motéma, cerveau é boyi ko pésa réponse
Ngaï na zala nini?
Na tuli
Libabé boyé, to ko loko
Parlé:
Bino bato bo zanga na bino problème, bo yoka oyo ya ngaï
Coucou ko mbanza ngaï na photo
Po' na si na changea
Na koma na nzoto ya mama yémo, nzoto ya Sana
Na koma ko zéla liwa na ngaï na zonga mabélé
Na koma ko zéla liwa na ngaï na zonga putulu
Mbongo ya CNPP
Molimo na nzakomba
Coucou ko mbanza ngaï na photo
Po' na si na changena nga
Na koma na nzoto ya Meridi, nzoto ya Éthiopie
Na koma ko zéla liwa na ngaï na zonga mabélé
Na koma ko zéla liwa na ngaï na zonga putulu
Mbongo ya CNPP
Molimo na nzakomba
Coucou o laissé ngaï distance
O tika ngaï kidiba, mama
Ndako é komi ghetto
Mpogui é kima ngaï na miso, yaka ko consolé nga
Na koya ko sala accident, bongo o méma ngabo
Ba kunda nga mobésu pembeni ya ébembé pona o léla ngaï
Yo o ko léla nga
O ko kanisa nga
Yo o ko léla nga



Writer(s): KOFFI OLOMIDE


Koffi Olomide - Tcha Tcho
Album Tcha Tcho
date of release
31-07-1990




Attention! Feel free to leave feedback.