Papa Wemba - Congo moko paroles de chanson

paroles de chanson Congo moko - Papa Wemba



Ebale ya Congo ohh
Ezali lopango te eh
Kasi ezali se-eh-eh nzela-ah-ah-ah-ah
Yaweh, Yaweh benisa Congo eh
Yaweh, Yaweh batela mi Congo oh oh
Yaweh, Yaweh benisa Congo eh
Yaweh, Yaweh batela mi Congo oh uhm
Bana Congo bolamuka nanu na pongi
To tala ndenge to koki kobongisa
Mboka ba koko batikela biso-eh⁷
Bangala na bakongo oh
Baluba, ba swahili ih
Ba bembe na ba teke eh
Ba lari na ba moshi
To'ali bana Congo oh
Toyokana-eh-eh-eh
Bana Congo, tolamuka nanu na pongi
Totala ndenge tokoki kolingana
Koyokana na mboka oyo ba koko batikela biso ehh
Kasaï na Congo oh
Équateur mabenga ah
Enyari na libulu uh
Kabwenza na likwilu uh
Tango ekoki
To ohh lingana ehhh
Congo mboka monene ehh
Kolongua Lubumbashi ti na pointe noire
Etonda bomengo na batu ya mayele eh
Elingi etumba te ehhh
Po etumba ebenganaka kimia ah
Ebomaka bondeko, eteki ekolo oh
Boyinani, Bobomani pe bokabuani
Yaweh, yaweh benisa Congo eh
Yaweh, yahweh batela mi Congo oh
Yaweh, Yahweh benisa Congo eh
Yahweh, Yaweh batela bana Congo-oh
Indépendance tcha tcha, tozui ehh
Oh kipuanza tcha tcha, toba kidi ihh
Oh table ronde tcha tcha, ba gagner oh-oh
Indépendance tcha tcha, tozui ehhhh
Tongo etani na mokili ya Congo ohh
Congo molili esili ehhhh
Moto mohindo atekamaka mohumbu we iye eh
Abetamaka pe fimbo na colon, azui lipanda apemi
Bitumba na bitumba, conflits sur conflits ihh
Yeba mboka etambolaka na mokonzi ye moko te eh
Kasi elongo na peuple ehh
Imbua azali na makolo mane ihh
Alandaka nzela se yoko eh
Ih-ih-ih-ih
Bakonzi ya Congo
Bakambi ya Congo ehh
Bakonzi ya Congo
Bakambi ya Congo ehh
Denis Sassou Nguesso, Botshombe mondiale
Joseph Kabila ehh
Eh, bakonzi ya Congo ehh
Melesi na likanisi monene bozui ih
Ya kotia kimia na peuple ehhh
Yaweh, Yaweh benisa Congo eh
Yaweh, Yahweh batela mi Congo oh oh
Yaweh, Yaweh benisa Congo ehh
Yaweh yaweh batela bana Congo eh
Prophète Simon Kimbangu eyeh
Matsha Ndere ehhh
Bana Congo ohh
Bakolela ah-ah-ah
Ebale ya Congo oh-oh
Ezali lopango te eh-eh
Kasi ezali, ezali, ezali
Se eh-eh-eh-eh
Nzela ah-ah-ah-ah-ah




Papa Wemba - i Papa Wemba
Album i Papa Wemba
date de sortie
12-09-2006




Attention! N'hésitez pas à laisser des commentaires.