Koffi Olomide - Bambino Lyrics

Lyrics Bambino - Koffi Olomide



Yéme! ekendeki ezongaki kasi ekomi
(MIMI DISPY)
Koffi: Yoka mwasi, BAMBI yokamela nga yo rose oyo ekolisama na eau benite(mwana mama GEO yokamela nga)
Nga mobali(ACKRAM OJE)na zalaka na mposa balinga nga, nazalaka na posa ya vrai romance, lelo ndoto na nga eleki mpongi na molayi ééé sentiment na yo bambi ee é saouler nga.
Choeur: Maboko nayo eleki berceau ooo
Nazokoka kolongwa na mpongi ee probleme (loketo na yo ezanga mokuwa ebuki oyo ya nga mikuwa moko moko ti na oyo ya suka yeye)
Koffi: ntongo ya lelo ntongo ya mawa ee(ya mawa) ntongo ya lelo ntongo ya mukuya ee, ntongo elengi té.
Ntongo ya lelo mwesé eti loboko na litama, ntongo ya lelo ata na paradis eza "ville morte", ntongo ya lelo y′elengi oh ata café eboyi koyokana(kosimba aaa)na sukali po y'oza té.
Choeur: maboko na yo eleki berceau nazokoka kologwa na mpogi éé probleme
Loketo na yo ezanga mokuwa ebuki oya nga mikuwa moko moko ti na oyo ya sukaaa
Koffi: Bambi yaka éé kata nga mpota aa nalembi kobomba nga na signer eyoma.
Choeur: makango ya papa ba benga ka mama, bambi moluka lobengo koya okweya elinga.
"Caprices des dieux...
Canne à sucre, tues-moi ce soir...
A toutes les sauces, manges-moi ah ahhhhh"
Koffi: pinzoli ekoti likambo yango ekomi otia nga na maboko ya liwa butu nioso etikaka na matama na nga bilembo mibalé éé oya mpembé. Est-ce que wana eza nzela na nga ya lilita
Choeur: Bambi loba
Elili na yo bambi, oyo na bombaki na kati ya motema éé yango emati lelo na motoekomi kotungisa oyo ya nga bongo ekoya kobebisa oya ya nga paix du coeur.Est ce que wana eza commencement ya kilahu "bambi loba"(patti mobali, pélé mongé)
Kombo na yo bambi, oyo na bombaki lokola ekila ah yango oyo na nzembo lelo oyo nga na yembi ee, ba kala na ko koma na ba journaux, na ba prospectus na ba panneaux géant, est ce que wana eza nzela na nga ya lilita "bambi loba"(tonton fila, guy vanda)
Na lulaki yo ee Bambino ee, na miso ya moto alobaka té, na begaki yo ee mon amour, mongongo na nga ya moto oyo amonaka té. motema na nga epayi oloni ya yo amour ya bébé ayebi bolingo ya mama oh oh Bambino Bambinomalelisa ah isseyi oh oh (george weah géant garçon de tcha-tcho)
bambi oh oh Bambino, bambi nga maour na yo ezingi nga oh bambi nga amour na yo ekangi nga oh oh
Na loti yo na ngambo ya ebalé, y′olati zigida na loketo ozo lela ozo benga kombo na ngai ee Elelo ya mbongé ezipi oyo ya yo ee ozo luka bwatu oya na ngambo epayi nazali mawa trop.
Koffi: likolo ya amourna yo, likolo ya amour na yo kaka liwa ee kaka liwa é ka ka liwa eh eh eh, na signer eyoma na ndimi nga na jurer po na amour na nga Bambino ooo(coli vila)
Mokolo ya liwa na nga bambi olela oh
Mokolo ya liwa na nga bambi atuwaté oh
Ebongaki o fibisa nga bonbon bongo okomisa non partant bongo okenda na sima o tika nga
Choeur: chaba dan ba dan boum bing bong bing bang; cha badan badan boum big bong bing bang.
Koffi: likolo y'amour na yo yé, likolo ya amour na yo
oya nzambé, oya mama amy oya mosala ee (pena pittra)
Na signer eyoma, na ndimi, na jurer e...



Writer(s): koffi olomide


Koffi Olomide - V12
Album V12
date of release
06-02-2014




Attention! Feel free to leave feedback.