Koffi Olomide - Petite sœur Lyrics

Lyrics Petite sœur - Koffi Olomide



Yo o sala soni, petite soeur
Papa azalaki ko benga yo "cherie na yé"
Azalaki ko préféré ndè o labéla
Ponini o sali boyé ko?
Yo o tikali na nini?
Awa o kabi kabi nzoto
Awa o téki motéma na ba yankés oyo ya shangaï
Mawa mama
Petite sœur o sali soni
Dèko ya muasi o sali pasi
Yo o tikali na nini?
Awa o kabi kabi nzoto
Awa o téki motéma na biléki oyo ya nzéla
Awa o téki mobimba na yo
Awa o kabi lokumu na loyengué oyo ya mopiato
Mawa mama
Petite soeur o sali soni
Dèko ya muasi o sali pasi
Bana ya wélisa ba yébi passi
Ba yébi kilo na nzoto
Ba yébi lokumu
Mokili é bonga boyé
Mokili é bonga malembé
Mokili é bonga na limémia
Mokili é bonga boyé
Mokili é bonga doucement
Mokili é bonga na limémia
Mawa mama
Ko kendé liboso éza ko koma
O botamaki kitoko mpè na dignité
Baninga kitoko ba tiki ko sala déshonneur
Mais yo na moyi ba monaka yo kaka na butu
Na yaba réverbères, mpè na ba rond-points
Na kati ya ba hotels ya ba niveaux nioso
Ba nganda nioso kaka yo; monotonie
O koma muasi ba solisaka na kitsuéki
O koma fille oyo ba lingaka kaka na le secret
Yo sala soni, petite sœur
Elikia, bo ndoti nioso tu ...
A bima na miso ya nganga Nzambé oyo mpèbé
Mobali moko a latisa na mosapi lopèté
Ba logua ba chagrin oyo ya ba parents
A sala bango lokumu
Po ya yo masolo ézalaka ya mosolo
Masolo na yo ya bilamba oyo o défaka
Masolo na yo ya mibali oyo o changeaka
Ba dossiers na yo é yébanaka, valeur wapi
Ba pésa yo kutu kombo championne ya moniato
Yo sala soni, petite sœur na ngaï




Koffi Olomide - Noblesse Oblige




Attention! Feel free to leave feedback.