Michel Bakenda - Nzambe Monene paroles de chanson

paroles de chanson Nzambe Monene - Michel Bakenda



Nzambe monene
Nzambe monene
Nzambe monene boye
Mosusu azali te
Bolamu na yo etikala gravés na mémoire ya vie na ngai
Nakoki te kobosana esika okendaka kozuela ngai
Nzambe monene boye
Mosusu azali te
Ti na misisa na nga ya nzoto e
Rappeler ngai yo nde Nzambe ya vie na ngai
Naza na tenia ya bolingo na yo Nzambe natondaka yo te
Moninga na nga na kati ya motema
Mosusu azali te
Nayekola kolinga yo wuta bomwana na ngai
Nazokoma tina suki ya pembe nazala na yo lokola Nzambe
Oza Nzambe ya kotika te
Mosusu azali te
Yo nde Nzambe monene boye
Nzambe monene
Nzambe monene
Nzambe na ngai
Mosusu azali te
Bato osekuisa bakufa kasi yo nde ozo bika kaka
Onzulukaka te Yesu okozonga kaka ndenge omataki
Oza Nzambe na bibele
Mosusu azali te
Yo nde spécialiste ya kokawusa pinzoli ya miso na mitema
Nzambe oyo akawusa pinzoli etanga nanu te
Osilali n'ango na motema, etanga te histoire pe ekoyebana te
Boyeyi na yo esilisa matanga pe bato bapanzani
Soki oyaka te nde Lazare aza nanu na kunda Nzambe




Michel Bakenda - Concert autour du trône à silo
Album Concert autour du trône à silo
date de sortie
11-05-2016




Attention! N'hésitez pas à laisser des commentaires.