Michel Bakenda - Bolingo oyo (live) текст песни

Текст песни Bolingo oyo (live) - Michel Bakenda



Bolingo na yo, bolingo na yo Yésu
Bolingo na yo nazo yemba'ango na nzembo
Na yekoli ba langues ébelé po na exprimé nolingo na yo
Mais naza sûr na langue nazo yemba nga na b'anges bolingo oyo
Elokota moto ya soni étracé histoire na miso ya batô
Bolingo na yo, bolingo oyo nazo yemba'ango na nzembo
Nazo mituna ozo batela batû ndengue nini na moment ya confinement?
Technique nini ozo salela po batela batô Yésu
Basusu bazo bima te mais ozo liésa batô malamu Yésu
Nayé'o mi tuna malamu, malamu
Ozalaka Nzambé ndengue nini po obatela batô
Ndé na sosoli désinfectant ya ba bola
Eza Nzambé na bomoyi
Na sosoli yo ndé désinfectant ya ba bola
Olongi soni ya maladie elingaki ebeta na libota
Ozo batelela ba boti Yésu eh
Olongi soni ya maladie elingaki ebeta na libota
Ozo batelela ba yaya Yésu
Nayembi bolingo n'o
Nayembi bolingo n'o
Maloba ezuk'ekatana awa nazo luka na bimisa maloba mosusu po na yemba
Soki na remarqué Lingala ekomi ko koma mokusé
Nako lukiela yo langue mosusu
Soki na luki na kendé pe na Français nakoki
Nako lukelo langue mosusu
Sûrement na peso langue batô bakoki ko comprendre
Mais nga na yo ndé to solola
Nayebi na Lingala, oko comprendre Français, Swahili pe na Tshiluba
Na mek'o sangisa ngo nanu po'o comprendre ngaï
Merci Yésu pona bolamu
Bolingo n'o Yésu
Ebetisi nga maboko na kani
Bolingo n'o Yésu
Eyembisi nga nzembo moment ya confinement
Yoka na préféré confinement Nzambé na bomoyi
Ebimisaka motó na elongi ya ko seka
Okotisa David na confinement bonzambé
Sima na à remplaçaka Saül eh Yésu
Okotisaki Esther confinement bonzambé
Sima na opesaki Asurys eyi
Okotisaki Ruth confinement bonzambé
Sima n'ango Boaz moko abomaki eyi
Malgré ba kataki Samson suki eh
Kasi na confinement bonzambé suka n'ango ba philistins ba kweyi
Na sosoli bonzambé na Yésu eh
Na sosoli bonzambé na Yésu eyi
Bonzambé na Yésu esalaka vie ya motô lokola dissertation
Batô ba moni nanu na début kasi suka likambo Yésu ayebi eyi
Oyebi début continuité na suka Yésu eh
Oboya ko pesa likambo inachevé
Opesaka likambo oyo oko silisa
Ba bengak'o Alpha Omega po osala mokili
Kasi Alpha Omega eza na makambu ozo banda
Soki olaki nga libala Yésu eyi
Ata na ndaku ya ba boti kasi Alpha na yo eko banda
Nayebi Omega na yo eko suka tango nako lata Boaz na ngaï
Bongo na betelo mololo ya solo
Mololo yako bombama Yésu eh
Bolingo n'o
Bolingo n'o
Bolingo n'o
Bolingo n'o Yésu eh
Bolingo oyo nako yemba
Elongoli soni na nga
Okawusi mayi ya miso o gagné lelo motéma na nga
Bolingo oyo nako yemba
Elongoli soni na nga
Okawusi mayi ya miso o gagné lelo motéma na nga
Nzambé nini boyé
Nzambé nini boyé
Nzambé nini boyé eyi
Nzambé nini boyé
Na bengak'o nzeté'a ba rhema na ngaï
Liboso ya ebalé ozangaka solution
Na bengak'o nzeté'a ba rhema na ngaï
Liboso'a libanga obimisaka régis des eaux ya bonzambé
Na bengak'o nzeté'a ba rhema na ngaï
Liboso'a ba nioka falo osekisaka ngaï eh Yésu eh



Авторы: Michel Bakenda


Michel Bakenda - Tombola yaya 1 (live)
Альбом Tombola yaya 1 (live)
дата релиза
16-08-2020




Внимание! Не стесняйтесь оставлять отзывы.