Reddy Amisi - Assistant social текст песни

Текст песни Assistant social - Reddy Amisi



Mais au delà des espérances, noublie jamais que tu doit compter toi même ... Toi même!
Ye eh eh ... ye ye ye! Ah ngai eh! Ngai ndé ehhh ndoyi ya mama, ngai ndé loboko mobali ya mama eh!
Silisa kélasi ozua ata mutation na mbandaka, zua mpete monènè na compagnie ya l'Etat, zua mpete ata na armée eh ...
Ba fami bako ya lokola kaka ndé defiler ...
Ba ninga ya kélasi eh, ba ninga bo kola ...
Ba ko ya ndé lisalisi ...
Salisa salisa, pésa ndé pésa eh!
Eh! Motindo nini na sala na koki tè, tika na nzemba ata na nzembo oyo ...
Etikala ehhhh!
Ma ma ma ma! Ekoméli nga ndé ngambo oh ...
Eh kozanga mama ah!
Noki bako pesa yo ndé kombo, maboko makassi eh, fière ya pamba, mais aza na nini, eloko na monoko kaka maloba .
Na mitali natuni na nzambe ...
Ngai mpate nayo, po nini na niokuama boyé, einh po nini na niokuama boyé ...
Dis donc!!! Mama!
Mokolo oko kéléla oko mona ndé makambo, ...
Molumbu ya koba, molumbu ya mokomboso ...
Bayé bayaka ebélé epa na yo lokola ANP (Agence nationale pour l'emploie ah!) .
Ba oyo nioso ba yaka epa nayo, lokola yo zala assistant social .
Mokolo ozangi moto aya ah!
Allo artiste photo (occupé), allo paulin mukendi (il est en reunion onh!)
Osimbi moto oh okomi ndé ko kanisa, bayé na salisa ba pési ngai ndé mokongo ...
Mokili nzoka ndé makambo!
Lisapo o'nguè!
Baninga na yébissa bino lisésé ...
Papa moko a signaka contrat na liiwa ...
Liwa élakaka jamais jamais ako ya' na ndako na ...
Muana liboso, ya mibalé, ya misato, ya minè aké eh! ...
Papa wana asimbi moto, apanzi bilamba, a béléli oh!
Ohhhh liwa, boni boni bo bo bo bo boni na ngai eh!
Y'Olakaka ngai, 'okoya na ndako na nga jamais ...
Liwa elalaki na mabele ndé koseka, ékatanaki na mabele ...
Wana eza ya yemei eh!
Mokolo ako tinda nga ko zua yo, nako laka tè, mokolo tè, mbula tè, bilaka ...
Papa wana asimba moto akoma ndé ako ndé ko léla ...
Akoma ndé sambela bi biblia lokola poche na yé!
Yango wana na mokili ba ninga, liboké ya moninga ba sombelaka 'ango kuanga té!
Ba loba baloba ba koko ba loba, na tangu ya passi ba yebaka baninga eh!
Lélo oyo nalobi, na yembi na nzembo, moto na tangu passi, atikala moko!




Reddy Amisi - Les Top de Bayilo
Альбом Les Top de Bayilo
дата релиза
21-04-2017




Внимание! Не стесняйтесь оставлять отзывы.