Ferre Gola - Mercure Lyrics

Lyrics Mercure - Ferre Gola



Maman nga na kabi motema eleli mato na Paolo
Nzambe ya pungu he, lotisa nga ata na ndoto
Tango mosusu, nga nde na lingaka mabeboni okomi kosala ngai, lokola okana ngai kala, Paolo de Suza
Asengaki ngai bolingo, napesaki ye tango yakozongisa motema ekomi ba problèmes
Nazo kufa awa liwa ya mayi to ya moto te, liwa ya mandokito ya mbeli to ya masasi te
Moto abomi ngai nse Paolo nalingaki mingi
Blandine ya de Suza, sekisa ngai ata ya semblent
Soki opimeli ngai, mosuni lieyisa ngai ata mokuwa
Paolo de suza Paolo de Suza he, ya Blandine
Mema mbula o yo ya pema na ngai yo o mesurer
Nazangi yo Paolo, maboko emesana kosimba
Na boloko ya mokili nzoto nde ebetamaka fimbo
Kasi naboloko ya bolingo motema nde ezui problème
Nga nabotama mpo na kufa, nayebi eza destin
Kasi opusi liwa na nga ah ah mon bebe nakomi o kufa
Mokolo ya liwa na nga Nzambe atia na mokili esili te
Dit aimé, sekisa ngai ata ya semblent soki opimeli ngai mosuni liesa nga ata mokuwa
Maman munu hee. maaman munu hee
Kaka moto obengaka ye bebe ata likelele nakokoma Blandine
Mpo na luka nzela okumbi motema na ngai Paolo ya Blandine, ya mawa, ya mawa, ya mawa
Bongisa mayi ya miso okolela ngai
Papa lokola yo osundoli ngai boye, nakolela ngo na nzambe na ngai mpo akotia ngai loboko mpo na tombwama hee.
Soki nakolela mpinzoli ngai, balobi nde bokopangusa ngai te
Toka yango na kopo, etondisa na molangina bima na ya kolakisa ba chimiste
Ba sala yango ba teste, bayeba te lolango tango mosusu eza na valeur ya mercure
Album na nga etonda na bilongi ya basi kitoko
Kasi banso bakoma ba femme d'autrui
Filo face na nga etonda na banumero ya batéléphone kasi soki na bengi bango occupé
Na banzaki esuki awa nzoka première épisode
Suite mpe na tikeli De Souza Paolo
Alobaki na ngai nazela ye akozonga ngai butu mobimba nalali te nse ba pensé... Batu balobaka Ooo Ferre azalaka fière, azlaka fièree za ndenge na ngai
Soki na zoloba ba te, nalobaka te, elingi koloba te que na fière nga na botama bakolisa nga, na za mutu moko ya bilobela te
Bato baleka bafinga nga na ba tv mukolo moko te
Na reponda mpo eza
Ndenge na nga te soki na kolela mpinzoli ngai, balobi nde bokopangusa ngai te
Bwaka yango na kopo, tondisa na molangi lobi baya kolakisa ba chimiste
Basala yango ba teste, ba yeba te mer yango
Tango mosusu eza na valeur ya mercure
Bapasi ya bolingo na ndimi, yoka nga ata mawa
Namituni na Yawhé, soki mpe kowumela bolingo yango na teli miso ngai na we
Soki nakolela mpinzoli ngai, balobi nde bokopangusa ngai te toka yango na kopo, etondisa na molangina bima na ya kolakisa ba chimiste
Ba sala yango ba teste, bayeba te lolango tango mosusu eza na valeur ya mercure
Album na nga etonda na bilongi ya basi kitokokasi banso bakoma ba femme d'autrui
Filo face na nga etonda na banumero ya batéléphone kasi soki na bengi bango occupé
Nabanzaki esuki awa nzoka première épisode
Suite mpe na tikeli De Souza Paolo



Writer(s): Bataringe Gola


Ferre Gola - Chair de poule (Sens interdit)
Album Chair de poule (Sens interdit)
date of release
23-10-2013




Attention! Feel free to leave feedback.