Nana Lukezo - Loyembo Ya Motema Na Ngai Lyrics

Lyrics Loyembo Ya Motema Na Ngai - Nana Lukezo



Molimo na ngai enetoli Yo
Mayele na ngai ekumisi Yo
Motema na ngai esopani liboso na Yo
Pona yebi Ozali Nzambe ee
Réf.: Yahwe, Yahwe, Yahwe Ozali Nzambe
Lokola Eliya abelelaki Yo
Okitisaki
Moto na etumbelo
Yahwe tobeleli Yo lelo
Papa sembola loboko na Yo
Réf.: Mimonisa na Yo Papa, mimonisa Yahwe /4X
Na kolela na loyembo
Masiya na ngai oza wapi?
Satana akomi koseka ngai
Schilo na ngai ozali wapi
Sembola loboko na nguya
Banguna na ngai ba sambua
Po mosikoli na ngai Otelemaka na suka
Na koyemba na loyembo
Masiya na ngai ozali wapi
Mokili ekomi koseka ngai
Schilo na ngai ozali wapi
Sembola loboko na nguya ba yoka soni
Yo mosikoli na ngai Otelemaka na suka
Fongola buku ya ba souvenir
Na page ya lettre ya kombo na ngai
Okokuta ngai Yahwe na mua misala ya moke
Réf.: Kanisela ngai, kanisa ngai
Mobondisi ya mitema
Makasi ya babulami
Moyoki ya losambo
Mopesi pe biyano
Biso totaleli Yo, biso totaleli Yo
Mosungi ya mabota
Papa ya bana bitike
Mobali ya ba veuves
Bonsomi ya ba kangemi
Bilenge bataleli Yo, ba mama bataleli Yo
Mosungi ya kokamua
Mobandi ya ba pota mitema
Elikya ya ba santu
Makasi ya ba yengebene
Ba tata ba taleli Yo, eh papa, ...
Mobondisi ya mitema
Makasi ya ba bulami
Mokokisi ya bilaka
Mopesi pe biyano
Biso to taleli Yo, biso totaleli Yo
Yoka loyembo ya motema na ngai /2X
Nazali na mosus te Bobele Yo masiya
Po Yo okosaka te, Otonda bolingo




Nana Lukezo - Le Chant De Mon Coeur
Album Le Chant De Mon Coeur
date of release
23-03-2006




Attention! Feel free to leave feedback.