Ferre Gola - Eclipse paroles de chanson

paroles de chanson Eclipse - Férré Gola



Bolimbisa carole
Bino baye bolingo eniokola
Na tsiolaki pasi na bino
Lelo mpe ekwesi ngai
Lelo mpe ebeti ngai KO débout
Moniokoli soki eza kulutu ya jouissance
Ezala ata apéritif
Na plat ya bolingo
Kasi eza droit na yo oti ngai
Ya ko abonné ngai
Na souffrance ya libela
Ata condamner à mort
Massanga mike mpe bileyi ezalaka
Koboma amoureux moto eza
Koboma planet mobimba
Po l'amour eza visa ya compliqué
Epesameli moto ya pusu
Ba pimeli roi
Mwasi moko ayebisa ngai
Mokolo bakabelaka ye colié ya 1 millions
Asepelaka
Kasi esengo na ye e lutaki ndelo
Mokolo mobali a loulaki vie na ye mobimba
Alobaki ye
Ba je t'aime emouvant
Esala mayi na miso oyo selon ye
Eza na valeur koleka
Diament - carole
Balou o gagna na yo ngai
Balou o gagna na yo ngai déjà
Tikela ngai ndabo etikale eeh
Mokolo ba ko ya nde ba kuta ngo
Cadeau d'amour uuu yehhyeeh
Balou o gagna na yo ngai
Balou o gagna na yo ngai déjà
Tikela ngai ndabo etikale eeh
Mokolo ba ko ya nde ba kuta ngo
Cadeau d'amour uuu yehhyeeh
Pona ko yeba 1 plus 1 égale 2
Ezuaka tango moke tala ba nzete ya allumette
Bakoki ko lakisa kenza lobi akomi spécialiste eee
Kasi pona koyeba que motema na ngai
Epona yo balou ezua tango boni-i-i
Tala ba aveugle ba défi na bolingo ya ngoo oooh
Na feti ya magorodo
Oyo aza na makwanza ebele-e-e
Ye nde mokambi-i-i
Ya ngo erreur
Ezalaka elengi
Na tango bozo sala ngo elongo bato mibale eee
Na za angelu uta mapapu ezo monana te ooo
Mino esekisi mosuni mino eseki nde mosuni
Po mino eko liya
Mosuni laurette mpemba
Ange koyi ambana chaco aziza ba sambi-i-i-i
Jolie mayala eee mado ba mateau
Na za angelu ata mapapu ezo monana te ooo
Mino esekisi mosuni mino eseki nde mosuni
Mpo mino eko liya mosuni ninelle sassou
Na feti ya magorodo
Oyo aza na makwanza ebele-e-e
Ye nde mokambi-i-i
Ya ngo erreur
Ezalaka elengi
Na tango bozo sala ngo elongo bato ebele-e-e-e
Naza angelu ata mapapu ezo monana te oooh
Ekelamu a memaka milimo na bobungi bungi-i-i-i
A belama libela aa
To mi kitisa na satana to wumela te
Est ce que bako bala ngai oohoo
Bango bako bala ngai oohoo
Est ce que bako bala ngai
Carole balou ba lelana ee
Bolingo yango éclipse solaire
Carole balou ba lelana ee
Bolingo yango éclipse solaire
Ne quitte jamais celui que tu aimes
Pour celui qui te plaît mon amour
Motema na ngai ezo reprocher ngai
Nano na
Sepeli te
Guy bokopole ya denise
Kotisa ngai tina destination ya elengi
Na yoka bien eeh
Heritier mokuba eeeeh
Balou o gagna na yo ngai
Balou o gagna na yo ngai déjà
Tikela ngai ndabo etikale eeh
Mokolo ba ko ya nde ba kuta ngo
Cadeau d'amour uuu yeah-yeah



Writer(s): Bataringe Gola


Ferre Gola - Qui est derrière toi ?
Album Qui est derrière toi ?
date de sortie
11-03-2011




Attention! N'hésitez pas à laisser des commentaires.