Cindy Le Coeur - Égérie текст песни

Текст песни Égérie - Cindy Le Coeur



Elégance eeh
Hum!
Ti bolingo ekomisi nga na Goma
Ti nayoki pe te pema
Po epa Elégance azali na koma
Bolingo ya motema
Nakoti pe ba zamba
Na mati pe ba ngomba
Uuuuhhh...
Súka súka olobi nini Elégance
Na ya oh to na continuer kozela
Súka súka olobi nini Elégance
Na ya to na continuer kozela yo
Namata ba ngómbá
Nakota ba zámba
Nabanga
Ngáí awa butu ekómá se mikúsé
Ngáí awa pongi ekómá trois heures du temps
Ba ndoto monotonie
Elégance eeh, c'est elle que j'aime
Elégance eeh, c'est elle mon choix
Nzambé o pesa baníngá ba vocations
Bakomá ko prêcher
La bonne parole
Elégance ótíndela nga ata na WhatsApp
Sourire nayo ya tongo ya leló
Soki obosani tindá ata oyo ya mpokwa eeh
Súka súka olobi nini bébé
Na ya to na continuer kozela yo
Baníngá Nzambé a pesa bango ba vocations
Na trois heures du matin tango mpongi ekimaka nga
Nakoma ko fouiller téléphone na mona ata appel manqué
Soki tango mosusu Elégance okomeli nga mon bébé
Bonjour, mon fruit de mer
Je t'aime
Elégance, t'es telle que j'aime
Elégance, mon choix eeh
Mais e bandaki neti ndoto
Bolingo ya ngai na Elégance
Neti lisapo onge oyo ya Romeo na Juliette
Bolingo oyo mboka môbimba epesa longónya
Ya biso ebongaki neti linzanza na lángi
Lelo etíkálí lisitoile
(Bolingo ebótí mapapú)
Nga na boya ébélé ya mabala
Pona kozela Elégance
Mikolo elekí kutu ba sánzá ba mvula
Yo ozongaka nga awa likombé ebali nde nzóto
Souci ndé bileyi bya nga ko bandá moyi butu pi
Hum yo o latisa nga 'be bomwana pili ya bolingo
Lelo mokuwa ememi botutu o kati ya nzóto
Nakoma kobángá na ya kokúfa avant eeh
Kaka pona etúmbu ba bengi kombo bolingo
Yaka omona ndéngé bolingo ezo salá génocide
Natindi pe ba messagers bazongi maboko pámba eh
Kombo n'ô etingami nga lolému neti soyi eh
Diagnostique ya bokono ezwí nga absence Elégance
Zonga nakomi migrant
Na zangi terre d'asile
Na leli leli eeh
Elégance Elega
Wooouh ooh
Mwana ma' Solange azali ya nga mókó ngo ooh
Wooouh ooh
Soki ozalákí mbóka Elégance
Nalingaki ko changer nationalité
Nalingaki ko changer passeport
Nakoma na ngáí Elégançais
Nakoma na ngáí Elégançois
Et me soumettre à tes lois
Ça va de soit
Elégance kitoko eeh
Elégance kitoko avec excédant
Ekomi ko sopana nzelá nzelá
Lokola loso na mutu ya porteur
Basi óyo baza na problème ya beauté
Ba lokótá ba mipakola na nzóto
Bakoma belle belle belle belle
Elégance Nzambé asalaki yo eeh
Na l'heure oyo na paradis agitation
Mpé makélélé nionso esilaki eeh
Asalaki yo malembé malembé
Alati loupe neti oyo ya ba diamantaires
Tango basalaka expertise ya diamant
Soucis nayé obima parfaite
Lelo sur terre moto nionso aza convaincu
Perfection eza domaine privé ya Nzambé
Elégance oza produit ya perfection ya Nzambé
Ye ye ye
Ye ye ye ee
Baninga bo tika ngáí na lia mbuma
Adam aliaki simple pomme ya Eva
Po na paradiso Elégance azalákí
A rata mangoustan
A rata sucre oyo ya mbila y'esobe
A rata maracuja aaaah
A rata mayi ya pondu ya mayi-mayi
A rata muselu óyo ya dongo-dongo
A rata bizarrerie óyo ya pamplemousse
Ye ye ye
Ye ye ye ee
O tié conflit entre Gucci na Vuitton
Bazo welela yo eeh
Ozala égérie na bangó
Basála bénéfice
Ba concurrence óyo ya Apple na Google
Elégance
Ye ye ye
Ye ye ye ee
Elégance komisa nga ata bureau n'o
Petit ya confiance óyo asimbelaka yo sac
Maman au secours
Elégance soki atali nga
Nazongaka mwana moke óyo ba memaka na l'école
Na ba nounous, na deux tartines ya pain au chocolat
Na cartable
Ye ye ye
Ye ye ye ee
Elégance Elega Miandabu
Mwana maman Solange aux lèvres rose fuchsia
Ngáí awa na motéma l'amour est toujours en cours
Ton amour Elégance dans mon cœur pour toujours
Ton amour Elégance il n'y aura jamais de dernier jour
Pour ton amour Elégance je ferais toujours demi-tour
Depuis y'okenda Elégance nakoma na veste ya jardinier
Na pesi kombo na yo na chaque fleur ya jardin
Ba roses, ba pétunias, ba orchidées, ba jasmins
Ye ye ye ee
Yo otika ko limua limua, je t'aime ko
Yo otikaka ko silika, je t'aime
Yo otikaka ko silika, je t'aime
Yo otika ko lelisa nga, je t'aime
Yo otikaka ko tromper nga, je t'aime
Yo otika ko pesa mawa, je t'aime
Yo otika ko tromper nga, je t'aime
Yo otikaka ko silika, je t'aime
Yo otikaka ko silika, je t'aime



Авторы: Koffi Olomide


Cindy Le Coeur - Égérie
Альбом Égérie
дата релиза
02-06-2020




Внимание! Не стесняйтесь оставлять отзывы.