Fabregas Le Métis Noir - Etat d'esprit текст песни

Текст песни Etat d'esprit - Fabregas Le Metis Noir



Soki Nzambe azalaki ata roulage
Atelemi na boulevard ya l'amour
Nzambe a ko condamné se yo Adrien Mukiadi
Po oyebi nayo ko tambuisa bolingo bien te eh
Ozo memango na nzela oyo ya mabulu
Ozo kotisanga na ba nzela oyo mabulu
Nga Solange Mukiadi
Ba nzoko ba komi ko confondre nga na ba mboloko
Nako konda nioso nazo konda nga Solange Mukiadi
Se pona ko banzakayo chéri nanga Adrien Mukiadi
Amour ezalaki ba bisous ba tendresse ba caresses
Ndeke nini aleki awa, atiki naye loso
Ntaba nini aleki awa, atiki naye mpondu
Ayibelinga se bolingo nanga ya motema Adrien Mukiadi
Soki bolingo nanga esili eeeh nga mawa ah ah ahh
Pinzoli esalami awa na matama nanga
Soki bolingo nanga esili eeeh nga Solange Mukiadi
Na mokie nanga bébé, eza maladie te oh
Ko zala monene lokola
Hippopotame akimaka koleka mboloko te
Ça dépend na taille
Nga na beta Bruxelles na kana te atombola mosapi
Davide aboma Goliath na libanga moko
Eza likambo ya mafuta
Yango Fabre azo beta bango
Fabre azo buka bango
Papa Jasy Mbuyulu, Willy Blanchard Adrien Mukiadi
Bo benga ba policiers ba kangaye
Abomi moto oh oh oohhh
Ndenge aboyinga vraiment a barré nga
Amour, bolingo nanga eh, Adrien Mukiadi
Bo benga ba policiers ba kangaye
Abomi moto oh oh oohhh
Ndenge aboyinga vraiment a barré nga
Amour, bolingo nanga eh, Adrien Mukiadi
Davide soki abetaki Goliath eza po Nzambe azalaki boye
Ngape na makambo ya bolingo eza po Nzambe oza contre nga
Po kaka nga bolingo eniokolaka
L'amour ebetanga ba mbata ah nga eh
L'amour est plus fort que la mort
Sambole zomate
Oh papa atongi ndaku atie porte na liko
Nini wana? Molangi
L'amoulu, eloko moko bozoba
Bolingo eh eeh, eloko moko bolole
La fois passé ebetakinga ba mbata
Tour oyo ekotaki ti ba épisse
Ebelisanga estomac
Na kangaki monsieur madesu ndoki
Nzoka madesu innocent
Bo benga ba policiers ba kangaye
Abomi moto oh oh oohhh
Ndenge aboyinga vraiment a barré nga
Amour, bolingo nanga eh, Adrien Mukiadi
Na saliyo nini po otikanga na telengana na nzela eh
Moto azalaka na mokili soki moto oyo afandi naye akufi ako lela te
Ezate po to mesana
Jamais natikayo Okende ngolo jamais
Imbwa esi andima ba botolaye mokuwa esi atia monoko
Wana ata mbanda aza wana
Ako lekate ako lekate
Chérie nanga oza elengi na kabayo na motote
Bo benga ba policiers ba kangaye
Abomi moto oh oh oohhh
Ndenge aboyinga vraiment a barré nga
Amour, bolingo nanga eh, Adrien Mukiadi
Bo benga ba policiers ba kangaye
Abomi moto oh oh oohhh




Fabregas Le Métis Noir - Je Pense « Antidote »
Альбом Je Pense « Antidote »
дата релиза
12-02-2016



Внимание! Не стесняйтесь оставлять отзывы.