Franco & Sam Mangwana - Faute Ya Commercant текст песни

Текст песни Faute Ya Commercant - FRANCO , Sam Mangwana



1) Kadima tala ba lingi ko kunda ngai mobesu
Nazali nano ko pema nano na kufi te oh ah
Kadima mobali akabi ngai cadeau na ba mbanda
Nazali nanu na mayi na nzoto elenge, yo yo ah
2) Fauti ya mbanda te oh
Fauti ya commercant
Atekeli biso elamba ndenge moko oh ba mpangi eh
Commercant ye ko aluka naye se mbongo eh
3) Ngai na mbanda to kokani eh eh ye ye ah
Nzambe asala nga moke lokola tonga ya masini eh
Mbanda abanga lolendo na ngai te oh ima oh le oh, ye ye ah
Mao tala Kinshasa mobimba ba lali
4) Ngai nazali se ko tanga plafond na canape oh
Mawazo eh
Kadi mobali akabi ngai cadeau na ba leki
Bazalaki ko benga nga yaya na nzela ya zando eh
5) Um na sambwe oh oh
Ngai na mesana ko seka ata lelo na siliki
Mbanda abanga kanda na ngai te oh malole ye ye ah
Taille ya mannequin oh ngai mwana ya lomeka
6) Mobali asambwisi ngai likolo ya vengeance oh, oh yo yo ah
Oh mi na lewa eh eh
Instrumental
7) Ngai na mbanda to kokani ba point
Faute ya commercant eh
Boka oyo makambo
Yoka musique ya bana ya mboka
8) Ima ima eh, ima ima eh, ima ima eh ye ye eh bolingo pasi eh
Mama ah
Maloba ya tata liboso akata motema
Na mbeto ya lopitalo ayebisaka ngai boye
9) Mwana soki ko kelela eleki na la vie eh
Bakoya ko benga yo maboko makasi eh
Mwana soki verite eleki mingi na monoko
Bako ya ko benga yo epanza makita
10) Soki mobali alembi ko salela yo zuwa
Wana ekomi kaka libala ya provisoire
Mwasi ya mobulu asimbaka makwela ve oh
Suka ya likambo se ba boya ye
11) Nyongo ya mbongi suka se ofuta
Mwasi obangaki se na ndako ya Massiya eh ima
Oh mama ah
Instrumental
12) Mulowayi ko lele te
Yoka, um, suka
13) Kadi ba kana ngai kala eh
Ba hina ngai oh
14) Mobali aboya nga kala, nako yebaka te oh, ah
Likambo na sala eleki lelo mbula zomi oh
Mobali akangala ngai nkanda na motema
Toko liya toko mela ata na sengi pardon
15) Ye na motema aboya ko limbisa ngai
Aye ko baya ngai se tango na lingi ye mingi oh
Ah ngai na nyokwami oh oh yo yo oh mama
Oh yo yo
16) Mobali atika ngai bolingo na lolemu eh, oh yeye
Libala epesi ngai pension ya bamwana oh, oh yo yo
Mobali akabi ngai cadeau na ba mbada eh



Авторы: franco and sam mangwana


Franco & Sam Mangwana - Odongo
Альбом Odongo




Внимание! Не стесняйтесь оставлять отзывы.