FRANCO - Mamou текст песни

Текст песни Mamou - FRANCO



Olobaki nini eh eh eh eh
Olobaki nini, Mamou, eh eh eh eh
Olobaki nga na fundaka yo, na mobali na yo
Olobaki nga na salaka kisefe, na libala na bino
Olobaki nini eh eh eh eh
Olobaki nini, Mamou, eh eh eh eh
Olobaki nga na fundaka yo, na mobali na yo eh
Olobaki nga na salaka kisefe, na libala na bino
(Luambo Makiadi)
Madilu tika ye aloba eh
Makambo ye asalaka, ayebaka te
Ba balabala ye atambolaka, bato ba monaka ye
Ba ndako ye akotaka, ba mur ya ndako efundaka ye
Na ba coin nyoso ye a telemaka, ba chauffeur taxi ba monaka ye
Po na nini a panza yo sango, alobi, yo osalaka kisefe
Um
(Madilu System)
Ngai moto na kotelaka yo, Mamou eh eh ye ye
Ngai moto nayebi ba sekele, Mamou eh ye ye
Lelo na komi moto mabe, Mamou eh eh
Oyebi tango engindaka oh, Mamou eh eh
Oko kanisa ngai Mamou, na kei eh eh
Ata ofingi ngai ndumba, Mamou yee
(Luambo Makiadi)
Oh Mamou, na kamwe vraiment, Mamou
Na kanisaka ozalaka ami na nga ya motema
Po oyebi que nayebi ba secret na yo nyoso
Eloko ekamwisi nga Mamou
Okei ko finga ngai epa ya Musa
Olobi ngai nazali ndumba
Vraiment, Mamou
Oyebi, ngai na balaka
Na divorca, na bota
Bongo soki lelo yo, Mamou
Moto na tiaka motema
Obandi ko finga ngai ndumba
Ki ndumba ezali maladi te
Kindumba ezali punition te
Mamou, yo mwasi ya libala
Na kamwaka yo, oko tambola na kabambi ya sac a main
Na kati ya sac wana, kabambi ya liputa
Brosse a dents lokola moto azali ko kende voyage
Lipapa ya se, ebele ya makasu
Mamou, oyebi, epayi na yo nga nazalaka vivard
Po mibali nayo nyoso tout
Ata mobali na yo akuti yo ozali ko solola na mobali
Oko loba que aza mobali na ngai
Mais na lingaka ko boma libala na bino te, Mamou
Ummm
Po na lingaka bo bokolo bana na bosembo
Au lien na kota ba loba oh
Tala mwasi ya ndumba awuti ko boma libala ya mwasi abala
Um
(Madilu System)
Eloko nini oko luko oh, Mamou eh ye ye
Eloko nini olo luka oh, Mamou eh ye ye
Signature osi ozua, Mamou
Landa nzela ya libala oh, Mamou
Landa nzela ya libala oh, Mamou eh yeye
Yango evandisa yo na poto, Mamou eh eh
Tika ko kosa mobali nayo, Mamou eh eh
Soki atelephone loba obimaka, Mamou
(Luambo Makiadi)
Mamou, awa lisusu soki na lobi
Na kumbi ngambo, po naza ndumba
Yo moko oyebisa ngai
Mobali na yo atinda yo na poto, po oya ko bokolo bana
Ya ngo nde apesa ya signature
Ekoma yo awa, oyebisi nga mobali na yo a telephonaka yo 2fois par jour
Na 6heure du matin, na minuit
Apres minuit soki a telephone yo
Okamati kisi ya ba ngungi, opompe ndako mobimba
Po bana ba lala ti tango yo oko zonga
Po oyebi que mobali na yo atelephonaka na 6heure du matin
Tango atelephonaka yo, yoka ndenge oyebisaka na mobali na yo
Alo, papa ya bana
Biso toza na biso kaka malamu
Kaka nde bana no awa moyen te
Vraiment mobulu likambo
Surtout mwana oyo ya muke ya mobali azua elongo nayo, papa
Eh, azo kamwisa nga vraiment
Photo kutu otia na sani, na talaka ata elongi na yo
Abamba yango na mabele photo epasuka
Mwana oyo penza mobulu moyen te penza
Kaka ndenge ozalaka mwana muke
Lokola mama na yo ayebisaka ngai
Papa ya bana, naza na makambo mususu na lobaka te
Kaka otindelaka biso mbongo ya ko lia
Na suki se bongo
(Madilu System)
Yo moko osalaka mabe oh, Mamou eh yeye
Yo moko osalaka mabe ye
Obangaka mobali nayo te, Mamou eh eh
Olongola respect na ye okaba, Mamou eh eh
Ba camarade ya mobali nayo, Mamou eh eh
Obangaka bango te oh, Mamou eh ye ye
Lelo ofingi ngai ndumba ah nga na seki eh, Mamou, ye
(Luambo Makiadi)
Oh Mamou, kindumba oza ko finga ngai Bruxelles mobimba
Oke ti na Paris osilisi ngai
Otindi mokanda na Kinshasa
Mosusu otindi na Brazza
Kindumba eza punition te, Mamou
Oyeba Mamou esui ngai
Na lingaki dailleur na funda yo, Mamou
Inutile na funda yo
Na kamati obe film ya makambo nyoso ya mabe, oyo osalaka
Na tekisi yango epa ya Yorgo
Po azikisela ngai film wana
Mamou koma ngai
Ndenge ba komaka Yezu na kuruze
Sete mibale na loboko
Sete moko na lokolo
Mamou, ozali mwasi ya libala
Okamwisaka ngai
Na monaka yo oza ndoki
Oza kinsenkwa
Ozali munyororo
Mamou, nini nakoki ko loba po na yo
Example nini na koki na pesa po na basi ya mabala
Example ezalite
Awa ba lobe te nga nazali ndumba
Nako tambola na mwasi ya libala
Yango nako pesa yo makannisi mabe, te!
Ezali nde yo moko moto oza na makanisi ya mabe
(Madilu System)
Ngai moto na kotelaka yo
Ngai moto naybi ba sekele
Lelo na komi moto mabe, Mamou eh eh
Oyebi tango egindaka, Mamou
Oko kanisa nga, Mamou
Nake eh eh
Ata ofingi ngai ndumba, Mamou, ye



Авторы: franco


FRANCO - The Best Of Franco
Альбом The Best Of Franco
дата релиза
31-08-2010




Внимание! Не стесняйтесь оставлять отзывы.