Ferre Gola - 100 Kilos текст песни

Текст песни 100 Kilos - Férré Gola



Lelo-lelo kaka, lelo-lelo kaka
Dédicaces
Mbongo oza nango Luemba eh
Bilamba otonda na ngo, sambo ko zomi
Nazangi mayele ya kosepelisa yo
Nalamuki avant tongo etana nakoti zamba
Na buki 100 Kilos ya ba fleurs na maboko ma ngai moko
Na ba kipungu-pungu misato po nayebi
Olingaka ba nyama
Soki esclavage ONU epekiskaka te
Ndé na mi tie moumbu na yo pona vie
Po ata regard nayo ya pamba eza...
Soki esclavage ONU epekiskaka
Ndé na mi tie moumbu na yo pona vie
Po ata regard nayo ya pamba eza...
Otindeli nga maloba, olobi na ngai okoya ko tala nga
Ba tandelaka mokonzi tapis ya rouge ya lokumu
Natandeli yo chemise pe pantalon na nga, Luemba
Wuta na bala-bala ti na ndako na ngaï
P'otambolela, Edo
Y'oza vraiment na lignée ya ba plus beaux joyaux vivant, Ousmane Kaludji
At'obombi elongi, lokolo n'o pamba eza na valeur ya parc ya Virunga
Bongola vie na ngai na seconde moko, tanda maboko
Bongola vie na ngai na seconde moko, Pitchou Nzita
Bongola vie na ngai na seconde moko, Picass Mayabo
Mokolo Luemba akendeki mobembo oh
Mokolo Luemba akendki mobembo eh
Na ko sala nini Guy Luemba oboyi nga, Papy Massamba
Na ko sala nini Guy Luemba oboyi nga
Eh ngai eh, caprice na yo ndé courant ebendakaka ngai
Elamba na ngai ya feti eza loposo na yo
Tango okoya ekozala le plus grand festin, Thierry Gola
Caprice ya Fifi ndé courant ebendaka Guy
Elamba na ngai ya feti eza loposo na yo
Tango okoya ekozala le plus grand festin, Orly Ngola
Ebandaka na projet, lelo ekoma réalité
Ba jaloux basalaka nionso po ba kabola biso
Betela maboto, na miso na nga Nzambe, cœur, cœur
Papa merci na ndéngé opesi biso nguya to sangana nga na ye
Libala ezali eloko ya ko batela Carpentier
To yeba yo, oh-oh-oh, jalousie, musala na yo ko panza mabala ya batu
Oko pesanga makanisi ya mabe na boya sima na ya ko regretter pamba, ah mawa
To yeba yo, oh-oh-oh, jalousie, musala na yo ko panza mabala ya batu
Oko pesanga makanisi ya mabe na boya sima na ya ko regretter pamba, ah mawa
Motéma na nga enokeli mvula, pona ba déceptions
Oyo mbula ya makasi, motéma ezui ba érosions
Luka solution tangu ekomi nanu grave
Sinon oko kuta na coin na biso, mandalala
Caprice ya Fani ndé courant ebendaka ngai
Elamba na ngai ya feti eza loposo na yo
Nakosala nini Guy Luemba oboyi nga
Nakosala nini Guy Luemba oboyi nga
Dédicaces
Nakosala nini Guy Luemba oboyi nga
Bolamu na sala yo, ondima nga Alina
Natikala na chemise moko pona yo
Pantalon kutu na bamba na bamba tii na moyi ya lel'oyo
Bongo mbula na somba sapato nayebaka
Wana nionso po na yo eh
Lelo y'owangani ngai eh, eh yaya
Lelo y'obosana ngai eh
Lelo y'owangani ngai eh, eh
Nalobi eh, y'o solola na nga ndéngé wana?
Oosolola na nga mabé, oosolola mabé makasi, oyebi tss?
Lelo tozo loba mingi té, n'acoustic o'o lelo
C'est-à-dire ba mindélé bazo beta ba violons, biloko na bango
Donc lelo tour na bango ba lela ndengé balingi
Ndéngé bazo lela boye, etikali bana Kin, donc bana Kin ya INA
Donc bo se préparer, po acoustic oyo toko beta ngo lisusu kuna




Ferre Gola - Accoustique 1789
Альбом Accoustique 1789
дата релиза
01-04-2017




Внимание! Не стесняйтесь оставлять отзывы.