Ferre Gola - Moribond текст песни

Текст песни Moribond - Férré Gola



Kayembe Chez Ntemba
Si si
Ebikedi (ya palais)
Ebongo ya poussière (ya ba mama bipekula)
DJ Franck
Olingi natumbela yo
Olingi natumbela yo mbeka oy′a bolingo to pe
Nasopela yo kisangala caresse po opesa nga Temba
Le moustique se nourrit par le sang kasi aza vampire
Malgré pembe ya Baluba, naza ndumba
Kitoko Nzambe apesa nga, yango nabonzeli yo
Zonga mobimba ti na molimo
Mokuwa naliaki,
Napesi mbwa a refoulé kolia po ayoki
Ebimi solo ya déception ya bolingo ya Temba
Souci na nga esi namikomisi na liste ya bato oyo bakokufa pona love
Liwa na nga esi esignami se pona bolingo lelo nakomi moribond
Chez Ntemba eh
Bolingo esombaki lopango na motema na ngaï
Na quartier ya tendresse esika bisengo avandaka
Lelo achangé adresse akomi na avenue ya milelo
Souci na nga esi namikomisi na liste ya bato oyo bakokufa pona love
Liwa na nga esi esignami se pona bolingo lelo nakomi moribond
Chez Ntemba eh
Bolingo ezanga loboko ya kosimba mbeli
Mais ndenge nini ezokisi motema mwana'a moto Temba
Ba je t′aime na yo ezalaki nzoka ya lokuta
Epapi motema na ngaï lokola zabolo sans pitié
Se eteto na ngaï pygmé nabungi na kati ya forêt
Likolo ya kolanda bolingo ebatami pene ya nkoyi
Miracle nini nasala natiki nioso na maboko ya Nzambe
(Abatela nga lokola abatela Shesko de London, à Bruxelles Dandy Panzu)
Soki olingi'oyeba ndenge nini nalingaka yo
Zua mbeli fongolamotema na nga otala na kati
Kasi sala ngele noki okoboma nga
Okoregretté nasima, nalingaki yo mon bébé Temba Kayembe
Mayi ya miso na nga ekokani na Mississippi
Meka koboya nga nako inondé nde Kinshasa mobimba papa
Ozalaki pene na nga, lelo otié nga mosika na yo
Elanga ekomi pembeni zonga Chez Ntemba
Propriétaire ya love ateki lopango na ye
Malili ekoti na nzoto na nga, cas na nga nazangi
Chez Ntemba Kayembe
Ozalaki pene na nga, lelo otié nga mosika na yo
Elanga ekomi pembeni zonga Chez Ntemba
Propriétaire ya love ateki lopango na ye
Malili ekoti na nzoto na nga, cas na nga nazangi
Chez Ntemba Kayembe
Jesus ba petits ba'o teka
Na maboko na bango ni makasa nzete ya mokomboro
C′est à partir de trois heures, Junior Mukasu
Oba′o teka, ba'o teka niangalakata oy′a niampule
La guerre a commencé, Papy Mayango Position, tokobokisa plaisir
Likambo ya love bato babomanaka
Naoli la perle rare, Fisher Senga, Christian Wadis
Ozalaki pene na nga, lelo otié nga mosika na yo
Elanga ekomi pembeni zonga Chez Ntemba
Propriétaire ya love ateki lopango na ye
Malili ekoti na nzoto, cas na nga nazangi
Chez Ntemba Kayembe
Nani akomi mingi po namona yo
Solution Ikeleve
Naleli mingi Chez Temba po namona yo
Oloba na bo bazomemela nga liboma
Paulin Bwanga, Eva Tumba na Belgique,
JP Minia, Shaggy Musahu, Doddy Matoni
Bolingo ya Chez Ntemba ekomi'o niongola nga
Nasili nzoto bakomi′obenga nga moribond
Mama Cilia Aigle Jaune talela nga likambo
Excellence Antu Matubwana kotela nga likambo na leli
Christupa accord présidentiel
Zeli Tesi
Ozalaki pene na nga, lelo otié nga mosika na yo
Elanga ekomi pembeni zonga Chez Ntemba
Propriétaire ya love ateki lopango na ye
Malili ekoti na nzoto, cas na nga nazangi
Chez Ntemba Kayembe



Авторы: Férré Gola


Ferre Gola - QQJD, Vol. 2
Альбом QQJD, Vol. 2
дата релиза
09-06-2017




Внимание! Не стесняйтесь оставлять отзывы.