Madilu System - Kupanda текст песни

Текст песни Kupanda - Madilu System



Didi Kinuani
Le graand Baoba
Aza na don ya diamant
Telema, Kumpanda, to bina rumba oyo
Ko boya te, Eloge, ezali nango odemba
Na lingaka moto nayo ezala pene ya lipeka nanga
Mwa lisolo na litoyi oh
Wana otie nga de l'assurance
Nzoto nangai ekomi assurer, mama eh
Kombo nayo eh
Kumpanda eh Mfumu Bwala abenga
Nazali lokola
Moto ya kwiti aluka naye se kopo
Nazali lokola
Moto ya maladi aluka naye se monganga
Dokotolo se yo
Amour oyebi naza omega
Na luka yo na ba nganda na zua te
Na luka yo na mafinga na zua te
Nzoka ozalaki na kati ya bible
Na se ya losambo
Amour vraiment naza omega
Ko kabelaka nga mosolo te
Lakisa nga mosala
Mabala ya lelo ekoma ya ba interet
Bango na boswani biso na ba love
Bango na bitumba biso na koyoka
Lindanda ya Chico Mawatu
Na mongongo ya Madilu System
Ngai litshombe nayo
Yo couvese nanga eh
Ndeko ya Di Makombo
Ko bongolaka nayo ndoto te realite eh
Ndoto eza nde mystere
Kombo nayo na lolemo na nga
Na balola ntuku
Likukuma ba pesa yo
Yango na linga, na lula
Amour oyebi naza omega
Na luka yo na ba nganda na zua te
Na luka yo na mafinga na zua te
Nzoka ozalaki na kati ya bible
Nase ya losambo
Amour vraiment naza omega
Ko kabela nga mosolo te lakisa nga mosala
Mabala ya lelo ekoma ya ba interet
Bango na boswani biso na ba love
Bango na bitumba biso na koyoka
Lindanda ya Chico Mawatu eh
Na mongongo ya Madilu System
Bazuwa eh
Bwaka na moto ya mbabula to na fulu
Ya nga nayo quantite te qualite
Naza omega
Yanga nayo eko suka awa te
Nani yango akoki ko kabola biso
Kaka liwa eh akoki oh
Olangwisi nga Kupanda
Na amour nayo ngo ya silence na ninganaka te
Sekele nayo ya libala
Na bomba yango lokola ebembe
Nakende na yango nase ya mabele
Eloge eh tiya ngai bipayi olingi
Eloge eh teka ngai bipayi olingi
Ata na wenze
Moto asomba te eh yayo eh
Ko lela na ngai awa eh
Eza ko koma te
Est-ce que epayi ozali, Eloge, oza ko yoka ngai
Lopango eh nani akokoto
Fungola eza na maboko nayo
Banda yo okende
Ba toile d'araignée ebimba
Nani ako longola nga na ndako nayo eh
Oko lela ngai eh papa eh
Oko lelan nga mokolo nako kende
Bana na nga na maboko ya mbanda te
Oko luka ngai eh
Point faible nayo nayebi oko luka nga
Eko zala trop tard
Nga na maboko ya mbanda
Oko luka ngai eh
Oko lela ngai eh, Roger Boko oh
Oko lela ngai, mokolo nako kende eh
Bana nagai na maboko ya mbanda te
Oko lela ngai eh
Point faible nayo nayebi oko luka nga
Eko zala trop tard nga na maboko ya mbanda
Oko luka ngai eh, Alpha Myadia
Oko lela ngai eh, Remy Eketani eh
Oko lela ngai eh, Claude oh
Oko lela ngai eh Elodi ya Mosengo
Oko lela ngai eh, president Nduna eh
Oko lela ngai eh, Jean Marie Anyele eh
Oko lela ngai eh, Didi Kinuani



Авторы: Madilu Bialu


Madilu System - La bonne humeur
Альбом La bonne humeur
дата релиза
01-01-2010




Внимание! Не стесняйтесь оставлять отзывы.