Tabu Ley Rochereau - Congo avenir текст песни

Текст песни Congo avenir - Tabu Ley Rochereau




Congo, congo nde mboka,
Mboka yango mokengeli koy, mboka yango mokengeli léopard.
Mikolo to sekelaki na mosolo ya mboka congo ekoki
To fongwani miso lelo to moni buzoba nioso to sali.
Yo ako bongisa congo avenir ebongo to sala, ebongo to sala,
Moto nioso ata mwana, congo ya mosolo pembe ya nzoko,
Congo ya bwana kasa ya mbila, congo ya makasi moto ya koy.
Mikolo to sekelaki na mosolo ya mboka congo ekoki
To fongwani miso lelo to moni buzoba nioso to sali.
Oyo ako bongisa congo avenir ebongi to sala, ebongi to sala,
Moto nioso ata mwana, congo ya mosolo pembe ya nzoko,
Congo ya bwania kasa ya mbila, congo ya makasi moto ya koy.
Congo, congo nde mboka, congo mboka ya ba koko;
Congo boko mona pamba lobi boko lula yango;
Congo, congo y'africa, congo mboka ya kitoko;
Congo ya batu mayele, congo bako bikisa yo;
Congo, congo nde mboka, congo mboka ya ba koko;
Congo boko mona pamba, lobi boko lula yango;
Congo bana bazali ko yekola, congo bako bikisa yo
Congo, congo ya ba koko, congo, congo nde mboka;
Congo, congo nde mboka, congo oooh, mboka ya ba koko ooooh.



Авторы: Tabu Ley Rochereau



Внимание! Не стесняйтесь оставлять отзывы.
//}