Ferre Gola - Pito Lukaya текст песни

Текст песни Pito Lukaya - Férré Gola



Bolingo ya Pito etambwisi nga moto
Koleka Zachée tango ayokaki sango ya mwana Nzambe
Esengaki amata na nzete po amona ndenge nini akoya
Nga pe namata wapi po namona ndenge bolingo ekozonga
Peut-être akolobela nga lelo "nakolala epaï na yo"
Esengo ekozala leko koleka ba angelu na lola
Soki mopaganu abungoli motema awa na se
Nzambe likunia etumbu ya makasi ba pelisi yango
Moto bolingo ekoki ko pela sans pétrole n′allumeti
Awa opesi ba mbanda permission ya kodéfiler na miso na ngaï
C'est qu′otié bolingo à vendre
Pito Lukaya
Awa okotisi motema na nga na soin intensif
Po kuna moto te akoya ko rendre nga visite
Ndenge porteur amesana na kilo sac ya bandi na moto
Minu emesana kokata lolemo bileï na monoko
Ndenge nga namesana na yo
Soki nzoku mokolo akomi olemba mino na yé,
Eza pasi na fourmi po atumbola eteni ya lipa
Mwana na libumu ya mama atunaka zemi yango ekotaki wapi
L'essentiel abotama na ye na mokili ya Nzambe
Ngungi ata omemi ye na usine ya miliki eza
Koempecher ye te po a piquer po eza musala na ye
Quelque soit gentillesse ya chauffeur na taxi,
Eza koempecher te ba clients na ye bafuta ticket
Sans le fleuve Nil, l'Egypte elingaki kozala désert
Kozanga yo Lukaya motema etikali terre vide
Sans le fleuve Nil, l′Egypte elingaki kozala désert
Kozanga yo Lukaya motema etikali terre vide
Sekele ya vie, le coeur ne l′oublie jamais
Ata molili, miso na nga emoni yo
Na mongongo nayebaki ezali Pito Lukaya
Lokola bébé a se referaka na solo ya
Nzoto po a identifié oy'a ye mama ah
Pito na nga Lukaya, kokanga motema
Soki bafungolaka ntima, okomona oy′a ngaï
Ndenge ozosala ngaï Jigal Nzau azo sepela
Ndenge ozosala ngaï Chantal Bola azo sepela
Sekele ya vie, le coeur ne l'oublie jamais
Ata molili, miso na nga emoni yo
Na mongongo nayebaki ezali Pito Lukaya
Lokola bébé a se referaka na solo ya
Nzoto po a identifié oy′a ye mama ah
Ba mpangi ya Vincent Pito Lukaya
Balingi bakabola yo ya mbalangata
Est-ce que nakovivre tuna Jules Nsana
Pito nalingi omema ngaï na likolo
Sekele ya vie, le coeur ne l'oublie jamais
Ata molili, miso na nga emoni yo
Na mongongo nayebaki ezali Pito Lukaya
Lokola bébé a se referaka na solo ya
Nzoto po a identifié oy′a ye mama ah
Pito nalingi omema ngaï na likolo
Pito nalingi omema ngaï na Cuba
Lukaya nalingi omema ngaï na Guatemala
Pito bombisa bolingo epaï Francis Luya
Sekele ya vie, le coeur ne l'oublie jamais
Ata molili, miso na nga emoni yo
Na mongongo nayebaki ezali Pito Lukaya
Lokola bébé a se referaka na solo ya nzoto
Po a identifié oy'a ye mama ah. dédicasse...
End



Авторы: Férré Gola


Ferre Gola - QQJD, Vol. 3
Альбом QQJD, Vol. 3
дата релиза
09-06-2017




Внимание! Не стесняйтесь оставлять отзывы.