Madilu System - Keva текст песни

Текст песни Keva - Madilu System



Sangi Sangi Pumba, il est toujours difficile d'être aimer que d'aimer
Sangi pumba na ye nde kosenga yo,
Soki moyen ezali tokabuana mabe eleki motema mobebi he,
Na pesa yo liberte osakana,
Naboyi miso na nga etala eloko, eloko ekobunga lobi oh mama
Ngai oyo nakomi nde kozonga na sanduku ya makambo na moto,
Nalongoli zuwa patience esili eh,
Napesa bino permission bobalana soki muana alingi
Kosimba moto, botika ye asimba mokolo akozika akoyeba
Lobi lisusu nakutaki yo na ye, bras dessus ekopi na monoko,
Ofungoli miso otali nga okitisi elongi oyoki soni obandi nse kolela,
Tika hypocrisie ozali na motema moko
Ndenge nini okolinga biso mibale okotia nga wapi?
Bomba mayi na yo ya miso, okolela masumu na yo,
Naboyi yo osimba ngai na nzoto, maboko na yo matondi makila,
Makila ya motema na nga ozokisi,
Otubi nga nde likonga,
Kende basukola yo maboko epayi ya sango na eau bénite
Yo moko oponi nzela wana, natombeli yo kaka chance,
Epayi naye zala mwa fidèle, kosala ye ndenge osali ngai te,
Mwasi azalaka na mibali mibale te, banda bo nkoko na biso,
Kobebisa te sima ozongela ngai
Okokuta nga na si nabanda kopesa nga faute
Soki mokolo mosusu Kintsala obuki fleure rose,
Atako motema na yango enuna, kobwaka yango nanu te,
Tango mosusu nse yango ya nsuka oyo etikala na kati ya elanga,
Okoya kozongo sima oko regretter
Fleure mosusu ezali te Patrick mangasa
Longola loboko na litama, tika kosala hypocrisie,
Na boyi parole nayo ya litsho pesa merci na patience na nga,
Epayi yo oke ntoli napesi yo vanda na ndako zela nse bomengo,
Kobebisa te sima ozongela ngai,
Okokuta porte bakanga eh chien mechant
Sangi sangi pumba, nalobaki na yo kokoma kombo na nga likolo ya zelo
Te mama, surtout tango mbonge ezali koya,
Koma yango likolo ya libanga, ata ba martin pecheur bakoya kotanga,
Oyebi bien ke mama, ngai na zali mbisi,
Ya solo na lula mayi, kasi oyo ya moto na lingaka te
Yo moko oponi nzela wana, natombeli yo kaka chance,
Epayi na ye zala mwa serieuse,
Kosala ye ndenge osali nga te mwasi azalaka na mibali mibale te,
Banda bakoko na biso,
Kobebisa te sima ozongela ngai
Okokuta nga na si nabanda kopesa nga faute
Sangi sangi pumba namaboko na ngai osalaki mobulu,
Lokola mwana nioso akosalaka na ndako ya tata na mama kasi naboyaka
Yo te, epayi okeyi lakisa ye fidélité chérie, ko
Sala ye ndenge osali ngai te, nde ozui bomengo,
Nazali kobanga noki aboya yo,
Okoya kotelengana mpamba, oyebi que nalingaki yo mingi
Bomba mayi ya miso, okolela masumu na yo,
Naboyi yo osimba nga na nzoto, maboko na yo matondi makila,
Makila ya motema na nga ozokisi, otubi nga nde likonga,
Kende basukola yo maboko epayi ya
Sango na eau benite mama heee he he...
Oyo mal chance, oyo lisuma.




Madilu System - Les Top de Ninja, Vol. 2
Альбом Les Top de Ninja, Vol. 2
дата релиза
24-04-2017




Внимание! Не стесняйтесь оставлять отзывы.