Reddy Amisi - Ekomba Lyrics

Lyrics Ekomba - Reddy Amisi



J.R likoli
Mosélékété eyali niama ya kolia
Pe ya ko kima
Eh ngai eh, eh mawa mama ah
Nani ayoka ata tangwa na nga ah?
Tangwa na nga tina
Oyo ngai nazanga mwǎna
Mwǎna eh-eh, mwǎna
Kombo ya mwǎna na yoka ya ba voisins
Oyo ngai nzapa nini, loba naye
Po ngai mawa eleki muna ah
Mama ya Edo
Jean-Marie Mundelé, ya Joe Motemona Bodack
Moto akoya nga ata mawa azali
Se bato ya koseka
Na tunaka nani akanga ngai libota
Na futa ko nini pona yango oh?
Jeancy Adeingo
Nako nyokwama pasi na motema, Gerard ya Guy
Nasali nini?
Po nga na mérité etumbu
Motindo oh
Nani a ndimbolela nga
Nyongo ya moto
Nalapi Nzámbe na longola zemi
Pasi ya boye ngai mwana ya maman
Soni na baninga oyo nde tokola
Na loba nini eh?
Dédicaces
Na loba nini eh, ngai moziki ya mama na yoki soni
Na loba nini eh, libala oyo ekendaka nsango lel'oyo
Na suka wapi eh, lokumu ya famille na bebisi, eh ngai awa oh
Mawa eh-eh, nzapa yoka tangwa na nga
Na lelaka kaka mwana eh ngai eh
Bisengo nionso esila nga ah
Bawa bakufa botika nde makambo oh
Nazangi nguya nasala likambo ya kamwa
Oyo ezua nga nayebi mosusu
Natikala kaka na sende ya mposo
Soucis elya ngai nzóto nionso niè
Nazelaka se Nkóló Masiya azonga
Abikisa nga na pasi oh mama ah
Maman, maman
Bawa bakufa botika nsé makambo oh
Nazangi nguya nasala likambo ya kamwa
Oyo ezua nga nayebi mosusu
Natikala kaka na sende ya mposo
Soucis eliya ngai nzoto nionso niè
Nazelaka se Nkóló Masiya ozonga
Obikisa nga na pási, oh mama ah
Maman, maman
Alube Lumbila abengi nga ekomba oh
Nani ako yokela ngai mawa oh?
Yoka tangwa na ngai
Nako somba na nga poupeé
Na bongisaka lokola mwana ah



Writer(s): Reddy Amisi


Reddy Amisi - Prudence
Album Prudence
date of release
16-01-2000




Attention! Feel free to leave feedback.