Reddy Amisi - Prudence Lyrics

Lyrics Prudence - Reddy Amisi



Ndimbola eh maman
Ngai Reddy nalanga makambo
Ngambo namema nayebi
Bakofinga ti na sang, nakomi komesa nango
Lokola soldat oyo akendaka etúmba, lokito ya masasi emesana
Wuta kala, wuta kala
Na tuni wuta kala mokili yango ebandaka
Na masumu to lelo eleki?
Ba nani balingi balekisela ngai tango
Po na nga tango ezali précieux
Ba koloba, ba kofinga po naboma nzóto
Oyo nga nzóto eza se moko
Mokolo liwa ekoya nayebi oh
Nalengela mwa tango Nzambé adefi nga
Na tuni eh, ngai natuni
Natuni bato ya mbóka
Oyo babanda mosálá oyo libosó na nga
Baloba po nayeba, matoyi ekosala pasi
Sadam Oussein yóka melope oyo
Mokili oyo mambu mingi
Monguna aza pembeni nayo
Akolia lokola mpuku
Mabe bakosala na moninga pene
Ndakisa na yango zala ekenge
Mwana nzela oyo okotambola ah
Monguna aza pembeni na nzela (ako tala yo)
Keba na verre nayo ya masanga (sala keba)
Ekenge luta nzela ya mbongo (tala ngambu)
Surtout masolo ya ba nketo keba
(Bakento bo keba na mambu makambo)
Ya nga likambo na nani?
Makambo epona kaka nga
Nani ayemba nga eh
Oyo yanga ekomi kamwa
Moto ako senga eloko se kombo na nga
Soki azui te yoka kombo na nga ndenge ekozika
(Na minoko ya bato)
Patcheli mwana samy, Patrick Diamona
Mabé nasala nayebaka
Mosala na pona miziki
Pona bokolo bana na ngai
Oyo ya ngai ekomi kamwa
Moto ako senga eloko se kombo na nga
Mama eh, mama oh
Kombo na ngai esambwé, ekomi elengi mafuta ya nzoyi
Balangwaka kaka na kombo na nga
Baluka basi na kombo na nga
Mabé nasala nayebaka
Mosala na pona muziki
Pona bokolo bana nangai
Oyo ya ngai ekomi kamwa
Moto ako senga eloko se kombo na nga
Dédicaces
Mabé nasala nayebaka
Mosala na pona muziki
Pona bokolo bana nangai
Oyo ya ngai ekomi kamwa
Moto ako senga eloko se kombo na nga
Mama, mama
Maman yoka mongongo na nga
Ba lingi bazua mposo na nga ya nzoto
Basala na ya ngo mboda
Oh, Godert nasali nini?
Mabé nasala nayebaka
Mosala na pona muziki (na sali nini?)
Pona bokolo bana nangai
Oyo ya ngai ekomi kamwa
Moto ako senga eloko se kombo na nga
Oh-h-h-h-oh
Fonsi Tshimanga, Ignace Moleka, Jean-Paul Onema
Michel kabeya, Ya Célé', Kambaka kamuzuna
Ya nga likambo na nani?
Makambo epona kaka nga
Nani ayemba nga eh
Oyo yanga ekomi kamwa
Moto ako senga eloko se kombo na nga
Soki azui te yoka kombo na nga ndenge ekozika
(Na minoko ya bato)




Reddy Amisi - Prudence
Album Prudence
date of release
16-01-2000




Attention! Feel free to leave feedback.