Reddy Amisi - Madame F. Lyrics

Lyrics Madame F. - Reddy Amisi



Fifi eh, nalali butu ya lélo
Matoyi esinzili libanda pona ko yoka soki okoya
Ndako na nga ekomi molili, yo mutu ongengisaka oké, chérie à Dieu
Osambwiseli ngai nzoto, lokumu na nga nionso ebebi
Oyaka lokola na ndoto, muke-muke lokola pongi
Na poni yo, maman ya bana, ozala solo wanga
Na kamwe kaka ndéngé obosani nga na bana, eh mbalé
Oyo toyebaka ngai na yo, bwaka yango na fulu
Koma kombo na nga kati ya motéma na yo pe ba souvenirs
Lelo nalingi na tikala boyé, na ndimi na niokwama ata, po nalembi
Nazalaka na elikya, bolingo oyo mbala suka
Etikala na ngai mpembé, toko koma naye koko
Nasala boni po nazangaka, etikaka nga ngambo ya mawa
Ezalaka ya ngai oh, bolingo'ango
Nalinga moto na motéma, lelo akendé atika nga na bana ndakisa na yango nini?
Na lobela yango nani eh, nalobeli maman, na lobela papa
Baninga na nga ya lisano bakomi ndé koseka-seka nga
Makambo na lobaka, na oyo esalami, na oyo nakanaka
Lelo ekamwisi bato mokili mobimba, soni eh
Ya lelo na ndimi eh, solo nkolo, bozoba liboso, mayele na sima
Lelo ya nga mayele liboso, bozoba na sima eh, nabanzi eh
Ata lelo ekomi na ngo boye, na tombeli yo bonne chance na likwela epayi oké
Naloba ndéngé nini, na kumisa yo mingi eh, nalakisa yo na bato
Bato bakoma kotuna nga boni yé, nazangi liloba, nayoki soni awa, maman
Tuku tu-tu-tu (seya)
Tuku tu-tu-tu (seya)
Elali ndé na nani (seya)
Elali ndé na Tsuna (seya)
Elali ndé na Reddy (seya)
Seya-se-se (seya)
Elali ndé na Mututu (seya)
Seya-se-seya (seya)
Oyo ndé bana Viva', oyo bino boyokaka
Sango mikili na mikili, na ba nzembo ya sika
Bakokoka oyo té, pua-ah
Mingimi, mingimi, mingimi mitali
Mingimi, (mingimi) mingimi, (mingimi) mingimi Viva yang'oyo
Mingimi, (mingimi) mingimi, (mingimi) mingimi mitali
Mingimi, (mingimi) mingimi, (mingimi) mingimi Viva yang'oyo
Yang'oyo eh, yang'oyo
Yang'oyo eh, yang'oyo
Tuku-tu-tu (seya)
Tuku-tu, tu-ku-tu (seya)
Makambo'a mikol'oyo (seya)
Seya-se-se (seya)
Seya-se-seya (seya)




Reddy Amisi - Prudence
Album Prudence
date of release
16-01-2000




Attention! Feel free to leave feedback.