Papa Wemba - Maman paroles de chanson

paroles de chanson Maman - Papa Wemba



Bilengi mingi na sala na berceaux ya mama
Eleki elingi koleka ba mbeto nioso nga na lala
Mama soki ozalaki kaka na bomoyi, mbele na sengi o zongisa nga susu wana
Jamais olingaki nga na lela yo seka
Jamais olingaki yo lala nga na lamuka
Jamais olingaki ata ngungi atoungisa nga
Soki na beli ozalaki kotana tongo nsa
Banda y′okenda nakoma abandonée, recompense nayo nako pesa nani yango
Ata na leli nani ako dorloter nga ah, yango na yembeli yo zembo oyo mama NIONDO
Elengi ya libelé ya mama abota ngaï, eleki ba recette nioso ya ba cordon bleu nga na lya
Ata mafuta, tomate ezalaki te, kasi yango elakaki mosuni n'élengi
Banda y′okenda appétit esila nga ah, nakoma ko lya kaka po na sepelisa monoko
Mateyas ya mama ezanga bulletin pe minerval, kasi eleki ba leçons ba maitres, ba professeurs ba pesa nga
Mama soki ozalaki kaka na bomoyi
Mbelé na sengi batya yo ministre y'éducation
Mbelé ba parquets, ba prison nioso bakanga
Mbelé kutu motu mabé azali eh
Lelo nakanisi yo mingi mama ah
Mpo jour y'anniversaire na nga ekomi pene
B′invités bako lya bako mela masanga
Yo kutu artisan na nga y′ozali te
Epayi y'ozali soki okutani n′occasion eh
Tindela nga carte de voeux, ata fololo
Esengo na nga ekozala multiplier fois deux
Normalement fêti ya lelo ezali ya yo
Serment d'Hippocrate ba médecins ba kosalaka
Ya nga serment y′ozala toujours mama nga
Ata ba bandeli mokili soki mbala zomi
Ya nga serment y'ozala toujours mama nga
Mais lelo nakanisi yo mingi mama ah NIONDO
Mpo jour y′anniversaire na nga ekomi pene
B'invités bako lya bako mela masanga
Yo kutu artisan na nga y'ozali te
Epayi y′ozali soki okutani n′occasion eh
Tindela nga carte de voeux, ata fololo
Esengo na nga ekozala multiplier fois deux
Normalement fêti ya lelo ezali ya yo
Serment d'Hippocrate ba médecins ba kosalaka
Ya nga serment y′ozala toujours mama nga
Ata ba bandeli mokili soki mbala kama eh
Ya nga serment y'ozala toujours mama nga
Mama soki ozalaki kaka na bomoyi, mbele na sengi o zongisa nga susu wana
Mama soki ozalaki kaka na bomoyi, mbele na sengi o zongisa nga susu wana
Consolation na ngaï JOE NIONDO photocopie na yo



Writer(s): Wembadio Shungu


Papa Wemba - Papa Wemba Live New Morning
Album Papa Wemba Live New Morning
date de sortie
09-06-2006




Attention! N'hésitez pas à laisser des commentaires.