Koffi Olomide - Asso (Live) текст песни

Текст песни Asso (Live) - Koffi Olomide



Yebaka lokola yo okeyi ngaï na mawa mama
Tanga ba souvenirs oyo to pesani
Mama na nyokwami na ngaï eh
Asso bolingo ya ngo ekeï na mopepe
Yanga ngaï ba pensés mama
Na bonzeli yo
Banzaka pe nga ata mbala moko na mvula
Na leli oh-oh-oh
Nga'a lela na nga kala mama
Mama abota nga
Mobimba na yo ekomi epaï ya moto mususu
Yango molimo mama etekami na zando
Ngaï ba chances epesa ngaï mboté ya lokalo kala eh
Asso ya mama ayoyo uhm-uhm
Ateki yo na mbongo na moto ya mosolo
Ngaï po na nzanga nga moyen nini na loba
Ata ko na mileli oko zonga
Assos chérie mon amour tu es partie
Pour toujours vers le précieux
Asso o-oh à dieux
Assos chérie mon amour tu es partie
Pour toujours vers le précieux
Asso o-oh à dieux
Papa naye bokulaka
Mama naye nkumu
Ba boya nga n'Asso
Po ye nsomi ya libenza
Nga na beli bongo
Motéma ezala ata sanduku
Bo tanga batu batikali ko teya ye
Awa Asso akeï lokola molinga eh
Asso na zongaki eh
Esika oyo to bandaka
Nayoki lisusu
Mungongo n'o eko lobela nga
Pesa nga loboko to katisa nzela
Lisumu na nga Adamu alia mbuma kala
Na kati'a butu na moni elongi na yo
Yo tali nga na mawa o lobi to lela elongo
Po nino to lingana bongo ekoma ngambo
Bombanga na motema Asso lokola sekele
Soki oko yoka nga epaï ozali eh-eh-eh
Nga mobola mawa moyumbu'a bolingo ah mama
Lelo oyo na yebebi bolingo ezali mboka mopaya
Buakaka lokolo talaka mipanzi eh
Asso na zongaki eh-eh
Asso na zongaki ih-ih
Asso na zongaki eh-eh
Ba tunaki nga na bato
Oye koluka Asso?
Nani nanu azonga na nzela oyo ye alokota mbongo?
Na espoir que ye alokota deuxième tours?
Asso oza koleka mbongo tala kaka
30 ans après batu'a mbongo ba fandi'awa?
Baza ko yemba yo
Nga mobola mawa moyumbu'a bolingo ah mama eh-eh-eh
Nga mobola mawa eh
Nga mobola mawa ah-ah
Merci




Koffi Olomide - 100% tcha tcho, Vol. 1 (Live)
Альбом 100% tcha tcho, Vol. 1 (Live)
дата релиза
01-01-2009




Внимание! Не стесняйтесь оставлять отзывы.